Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kobanda na lobɔkɔ ya mwasi tii lobɔkɔ ya mobali: Ndeko mobali Silaeva, ndeko mobali Shamsheva, ndeko mwasi Khokhlov mpe ndeko mwasi Zhinzhikov na tribinale na mokolo ya 28/10/2020

28 SANZA YA 10, 2020
RUSSIE

Russie: Tribinale endimi ekateli oyo tribinale ya liboso ezwaki mpo na bandeko minei

Russie: Tribinale endimi ekateli oyo tribinale ya liboso ezwaki mpo na bandeko minei

Na mokolo ya 28/10/2020, tribinale ya etúká ya Briansk endimaki ekateli oyo tribinale ya liboso ezwaki mpo na ndeko mobali Vladimir Khokhlov, ndeko mobali Eduard Zhinzhikov mpe ndeko mwasi Tatyana Shamsheva ná ndeko mwasi Olga Silaeva. Ekateli ya liboso oyo tribinale ezwaki ezalaki ete bandeko na biso bakoki kosala mbula moko to mbula moko ná sanza misato ya bolɔkɔ. Kasi, lokola basí balekisaki mbula yango ntango batyaki bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango, basengelaki lisusu te kokɔta na bolɔkɔ. Yango wana mpo na ekateli oyo tribinale ezwi lelo, bazali kokoba kotalela bandeko na biso lokola bato mabe. Ata bongo, bazali na esengo ndenge bazali na bonsomi. Ezali na mobeko moko te oyo esɛngi ete bálandela bango lisusu to bákatela bango etumbu mosusu.

Liboso ete tribinale ya liboso ezwa ekateli, bandeko mibali balekisaki mikolo 316 na bolɔkɔ mpo na mwa ntango mpe bandeko basi balekisaki mikolo 245. Nsima ya kobima na bolɔkɔ, batunaki bandeko basi yango mituna na lapolo ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi nimero 5. Bamonisaki ete kobondela, kotánga Biblia, mpe kobatela makanisi malamu esalisaki bango báyika mpiko na esengo nyonso.