Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ebongolamá malamu?

Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ebongolamá malamu?

 Eteni ya liboso ya Libongoli ya Mokili ya Sika ebimaki na 1950. Kobanda wana, bato mosusu balobelaka Libongoli ya Mokili ya Sika a mpe bamitunaka soki ebongolamá mpenza malamu mpo bavɛrsɛ na yango mosusu ekeseni na oyo ya Babiblia mosusu. Mbala mingi, bokeseni yango ezali mpo na moko ya makambo oyo elandi.

  •   Ebongi kotyelama motema. Libongoli ya Mokili ya Sika ebongolami na kolanda makambo oyo bato ya mayele bayekoli mikolo oyo mpe makomi ya kala oyo ebongi kotyelama mpenza motema. Nzokande, King James Version ebimeli ya 1611 ebongolamá na kolanda makomi oyo ezalaki mpenza sikisiki te mpe ezalaki mpenza ya kala te lokola oyo babongoli ya Libongoli ya Mokili ya Sika basalelaki.

  •   Ezali sembo. Libongoli ya Mokili ya Sika esali makasi mpo ebongola na bosembo mpenza nsango oyo eutá na Nzambe. (2 Timote 3:16) Babiblia mingi elandaka mimeseno ya bato na esika elanda nsango ya Nzambe na bosembo. Na ndakisa, na esika ya Yehova, oyo ezali nkombo ya Nzambe, ezali kotya batitre lokola Nkolo to Nzambe.

  •   Ebongolaka liloba mokomoko. Na bokeseni na Babiblia mosusu oyo ebongolaka makanisi na mokuse, Libongoli ya Mokili ya Sika ebongolaka liloba mokomoko soki fraze yango ekobima ndenge bato balobaka mpe ekobomba te likanisi oyo ezali na makomi ya kalakala. Na bantango mosusu Babiblia oyo ebongolaka makanisi na mokuse akɔtisaka makanisi ya bato to mpe elongolaka makambo mosusu ya mikemike oyo ezali na ntina.

Bokeseni oyo ezali kati na Libongoli ya Mokili ya Sika ná Babiblia mosusu

 Mikanda oyo ezangá. Na Babiblia ya Lingomba ya Katolike mpe ya Ɔrtɔdɔkse, ezali na mikanda oyo bato mosusu babengaka makomi ya apocryphe. Mikanda yango ezali te na liste ya mikanda ya Biblia ya Bayuda (canon juif). Nzokande, Biblia elobi ete Bayuda nde bato oyo “bapesaki bango maloba mosantu ya Nzambe.” (Baroma 3:1, 2) Na yango, Libongoli ya Mokili ya Sika mpe Babiblia mosusu mingi ya mikolo oyo esali malamu ndenge elongoli mikanda ya makomi ya apocryphe.

 Bavɛrsɛ oyo ezangá. Babiblia mosusu ebakisaka bavɛrsɛ to bafraze oyo ezalaka te na makomi ya kalakala ya Biblia, kasi Libongoli ya Mokili ya Sika esali ndenge wana te. Babiblia mosusu ya mikolo oyo elongolaka makambo wana oyo ebakisamaki na nsima; mosusu endimaka ete ata soki babakisi yango, euti na makomi oyo ekoki kotyelama motema mobimba te. b

 Maloba ekeseni. Na bantango mosusu, kobongola liloba mokomoko ebimisaka likanisi polele te to mpe epesaka ndimbola mosusu. Na ndakisa, mbala mingi maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 5:3 ebongolamaka boye: “Mapamboli epai na babola na elimo.” (haut fleuve) Bato mingi bayebaka mpenza te soki “babola na elimo” elimboli nini; bato mosusu bakanisaka ete Yesu azalaki komonisa ntina ya kozala na komikitisa to mobola. Nzokande, Yesu azalaki komonisa ete mpo moto azala na esengo, asengeli kotika Nzambe atambwisa ye. Libongoli ya Mokili ya Sika emonisi likanisi yango malamu na ndenge elobeli “baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”​—Matai 5:3. c

Makambo ya malamu oyo bato ya mayele oyo bazali Batatoli te balobi mpo na Libongoli ya Mokili ya Sika

  •   Na mokolo ya 08/12/1950, Edgar Goodspeed, oyo azalaki mobongoli ya Biblia mpe moto ya mayele akomaki mokanda mpo na Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo. Alobaki boye: “Nalandelaka mosala na bino ya misionɛrɛ mpe ndenge ezali kotambola na mokili mobimba; lisusu, libongoli yango ya polele mpe oyo ezali kosimba motema esepelisi ngai mingi. Nakoki koloba ete, na makambo mingi, bato oyo basalaki yango bazali na mayele moko ya kosakana te.”

    Edgar Goodspeed

  •   Profesɛrɛ Allen Wikgren ya Iniversite ya Chicago alobaki ete Libongoli ya Mokili ya Sika ezali Biblia moko ya malamu oyo ekomami na elobeli ya mikolo oyo, euti na mabongoli mosusu te, mpe na bisika mingi “ebongoli makambo na ndenge ya malamu mingi mpenza.”​—The Interpreter’s Bible, Volimi I, lokasa 99.

  •   Na esika moko oyo alobeli Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo, Alexander Thomson, oyo ayekolaka maloba ya Biblia, akomaki boye: “Emonani ete bato oyo babongolaki Biblia yango bazalaki na makoki mpe na mayele mingi, mpe basalaki nyonso bábimisa mpenza likanisi oyo ezali na makomi ya Grɛki na monɔkɔ ya Lingelesi.”​—The Differentiator, 04/1952, lokasa 52.

  •   Longola bisika oyo amonaki ete Libongoli ya Mokili ya Sika ebongoli lokola Babiblia mosusu te, Mokomi Charles Francis Potter alobaki ete: “Bato yango oyo bankombo na bango eyebani te babongolaki malamu mpenza makomi ya kalakala, ya Grɛki mpe ya Ebre; bazalaki na mayele mpe na bososoli mingi.”​—The Faiths Men Live By, lokasa 300.

  •   Profesɛrɛ Robert McCoy amonaki ete Libongoli ya Mokili ya Sika ekeseni na Babiblia mosusu mpe ebongolamá malamu mpenza; kasi nsima ya kotalela yango lisusu, alobaki boye: “Libongoli ya Kondimana ya Sika emonisi ete lingomba [ya Batatoli ya Yehova] ezali na bato ya mayele mingi oyo bayebi kosilisa malamu mikakatano ndenge na ndenge oyo ebimaka na ntango ya kobongola Biblia.”​—Andover Newton Quarterly, 01/1963, lokasa 31.

  •   Atako Profesɛrɛ MacLean Gilmour asepelaka mpenza te na ndenge Libongoli ya Mokili ya Sika ebongolá makambo mosusu, kasi andimaka ete bato oyo babongolaki yango “bayebaki monɔkɔ ya Grɛki malamu mpenza.”​—Andover Newton Quarterly, 09/1966, lokasa 26.

  •   Ntango atalelaki lisusu Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ezali na kati ya libongoli moko ya Makomami ya Grɛki (Kingdom Interlinear Translation of the Greek Scriptures), Profesɛrɛ Thomas Winter akomaki boye: “Mosala ya babongoli yango oyo bankombo na bango eyebani te emonisi ete boyebi na bango ezali ya mikolo oyo; mpe makambo oyo bakomaki ezali na boyokani mpe sikisiki.”​—The Classical Journal, 04-05/1974, lokasa 376.

  •   Na 1989, Profesɛrɛ Benjamin Kedar-Kopfstein, moto moko ya mayele na Israël, alobaki boye: “Na bolukiluki oyo nasalaki mpo na Biblia mpe mosala ya kobongola na monɔkɔ ya Ebre, mbala mingi natalaka Biblia ya Lingelesi oyo eyebani na nkombo Libongoli ya Mokili ya Sika. Soki nasali bongo, nandimaka mpenza ete bato oyo basalaki mosala yango basalaki mpenza milende mpo bákanga malamumalamu mpenza ntina ya makomi.”

  •   Nsima ya kotalela Babiblia libwa ya Lingelesi oyo bato basalelaka mingi, Jason David BeDuhn, oyo ayekolaka makambo ya mangomba, akomaki boye: “Libongoli ya Mokili ya Sika ezali Biblia oyo ebongolami na bosikisiki koleka Babiblia nyonso oyo natalelaki.” Atako bato ya mokili mpe bato mingi ya mayele na makambo ya Biblia balobaka ete makambo oyo ekesenisi Libongoli ya Mokili ya Sika na Babiblia mosusu ezali mpo bato oyo babongolaki yango balandaki mateya ya lingomba na bango, BeDuhn alobaki boye: “Libongoli ya Mokili ya Sika ekeseni mingimingi mpo ebongolami na bosikisiki mpenza na kolanda liloba mokomoko mpe ebateli maloba oyo bakomi ya Testama ya Sika basalelaki.”​—Truth in Translation, nkasa 163, 165.

a Makambo yango elobamaki mpo na Libongoli ya Mokili ya Sika ya Lingelesi oyo ebimá liboso ya 2013.

b Na ndakisa, na Biblia haut fleuve to Bible de Jérusalem, okomona bavɛrsɛ oyo babakisá: Matai 17:21; 18:11; 23:14; Marko 7:16; 9:44, 46; 11:26; 15:28; Luka 17:36; 23:17; Yoane 5:4; Misala 8:37; 15:34; 24:7; 28:29; mpe Baroma 16:24. Biblia King James Version mpe Biblia ya Douay-Rheims Version ekɔtisá likanisi ya liteya ya Bosato na 1 Yoane 5:7, 8, mpe babakisá yango bambula ebele nsima ya kokomama ya Biblia.

c Ndenge moko mpe, Biblia ya J. B. Phillips ebongoli maloba wana ya Yesu na “baoyo bayebi ete bazali na mposa ya Nzambe,” mpe Biblia mosusu (The Translator’s New Testament) elobi “baoyo bayebi mposa na bango ya elimo.”