Bamipesaki na bolingo na bango moko na Bulgarie
Batatoli ya Yehova na Bulgarie bamipesaka mingi mpo na koteya basusu solo etali Nzambe mpe Liloba na ye, Biblia. Mpo na koteya bato Biblia, bankama ya bandeko ya mikili mosusu bazali kokenda kofanda na Bulgarie banda na mobu 2000. Mikakatano nini bazali kolonga mpo na kokende kosakola kuna? Mpo na nini yango ezali kosɛnga kosala milende? Talá mwa makambo bandeko oyo bakendaki na Bulgarie balobi.
Komityela mokano
Darren oyo azalaki kofanda na Angleterre, alobaki boye: “Tozalaki na mokano ya kokende kosakola esika mposa ya basakoli ezali mingi. Nsima ya kobalana na Dawn, tokendaki na Londres mpo na koteya bato oyo balobaka monɔkɔ ya Russe Biblia. Mbala mingi, tozalaki koluka kokende na mboka mopaya kasi, mpo na bantina ekeseni, tolongaki te kosala yango. Tokanisaki ete tokokende lisusu kuna te, kasi na nsima moninga moko asalisaki biso tómona ndenge makambo ya bomoi na biso ebongwanaki mpe tozalaki na likoki ya kokende kuna.” Darren ná Dawn babandaki koluka mboka oyo ezali mpenza na mposa mingi mpe esika oyo bakokaki kofanda kozanga mindɔndɔ. Na 2011, bakendaki kofanda na Bulgarie.
Bandeko oyo bazalaka te na mposa ya kokende kosakola na mboka mopaya bakoki kolendisama na bandeko mosusu oyo bakendaki na mboka mopaya mpe na esengo oyo bayokaki kuna. Giada, oyo azalaki kofanda na Italie elongo na mobali na ye, Luca, alobaki boye: “Nakutanaki na Batatoli ya Yehova ya molende oyo bazalaki na esengo ya kosakola na Amerika ya Sudi mpe na Afrika. Nalendisamaki ntango namonaki ndenge bazali na esengo mpe ndenge bayebisaki ngai makambo oyo bakutanaki na yango. Yango esalisaki ngai namityela mikano ya elimo.”
Tomasz ná Veronika bautaki na République Tchèques bakendaki kofanda na Bulgarie na 2015, elongo na bana na bango mibale, Klara ná Mathias. Nini etindaki bango bákende kuna? Tomasz ayanolaki boye: “Tozalaki koyekola malamumalamu ndakisa ya bandeko oyo bakendaki na mboka mopaya, ezala bandeko na biso ya libota, mpe komanyola na mwa makambo oyo bakutanaki na yango kuna. Esengo na bango elendisaki biso mpe tozalaki kolobela yango libota mobimba.” Basangani ya libota oyo ya esengo bazali sikoyo kosakola na teritware ya sika na engumba Montana na Bulgarie.
Linda azali Motatoli mosusu oyo akendaki kofanda na Bulgarie. Alobaki boye: “Elekaki bambula mingi nakendaki kotala ekólo Équateur mpe nakutanaki na bandeko mosusu oyo bakendaki kofanda kuna mpo na kosakwela bato. Yango etindaki nakanisa ete mokolo mosusu ngai mpe nakoki kokende kosala epai mposa ya basakoli ezali mingi.” Petteri ná Nadja, babalani oyo bafandaka na Finlande, bakanisaki mpe na mozindo ndakisa ya bandeko mosusu. Balobaki boye: “Na lisangá na biso na mboka epai tobotamá, tozalaki na bandeko oyo bakɔmeli oyo bakendaki kofanda bisika mosusu mpo na koteya bato Biblia. Na esengo nyonso, bazalaki ntango nyonso kolobela bambula oyo balekisaki na mosala ya kosakola na mboka mopaya. Bazalaki koloba ete ezalaki bambula oyo eleki malamu na bomoi na bango.”
Ndenge ya komibongisa
Komibongisa malamu ezali na ntina mingi mpo na baoyo balingi kokende kofanda na mboka mopaya. (Luka 14:28-30) Nele, oyo afandaka na Belgique, alobaki boye: “Ntango nabandaki kokanisa kokende kosakola na mboka mopaya, nabondelaki naino mpo na koluka masolo oyo elobeli likambo yango na mikanda na biso. Nazalaki koyekola yango mpe komeka kokanisa makambo ya ntina oyo nasengelaki kosala.”
Kristian ná Irmina, oyo bautaki na Pologne, bakendaki kofanda na Bulgarie mpe basalaki mbula koleka 9. Bayaki komona ete ezalaki malamu ndenge bazalaki koyangana na makita na etuluku ya monɔkɔ ya Bulgare na Pologne liboso ya kokende kuna. Bandeko ya etuluku yango balendisaki bango mpe basalisaki bango mpo na koyekola monɔkɔ yango. Kristian ná Irmina balobaki boye: “Toyaki komona ete komipesa na mosala ya Yehova Nzambe ezali malamu mpenza mpe tomonaki ndenge azali kokokisa bamposa na biso. Ntango oyebisi Yehova na motema mobimba: ‘Ngai oyo! Tindá ngai!’ Na ntembe te, okoki kosala makambo oyo okanisá naino te.”—Yisaya 6:8.
Mpo na komibongisa malamu mpe kobatela mbongo, Reto ná Cornelia, babalani moko oyo bafandaka na Swisse, bazwaki ekateli ya kozala na bomoi ezangi mindɔndɔ. Balobaki boye: “Mbula moko liboso tókende, tokendaki na Bulgarie mpo na pɔsɔ moko mpo na koyeba soki mboka yango ezali ndenge nini. Kuna tosololaki na bandeko oyo bamesaná kosakola oyo bapesaki biso toli ya malamu.” Reto ná Cornelia batosaki toli yango mpe sikoyo esali mbula koleka 20 banda bakendá na Bulgarie.
Ndenge ya kolonga mikakatano ya kokende kofanda na mboka mopaya
Baoyo bakendaka kofanda na mboka mopaya bakutanaka na mikakatano mingi mpe kutu basusu bakutanaka na bampasi ya makasi. (Misala 16:9, 10; 1 Bakorinti 9:19-23) Mokakatano ya monene ezali ya koyekola monɔkɔ ya bapaya. Luca, oyo tolobelaki liboso, alobaki boye: “Tozalaka na mposa ya kopesa biyano na makita ya lisangá. Kasi, na ntango moko boye, ngai ná mwasi na ngai tozalaki na mokakatano ya kobongisa biyano ya pɛtɛɛ na monɔkɔ ya Bulgare! Tokómaki lokola bana mike. Kutu, bana mike ya mboka yango bazalaki kopesa biyano kitoko koleka oyo ya biso.”
Ravil, oyo autaki na Allemagne, alobaki boye: “Koyekola monɔkɔ ya bapaya ezalaki kolɛmbisa ngai. Kasi nakobaki kokanisa boye: ‘Komizwaka na valɛrɛ mingi te, mpe saláká mwa masɛki ntango osali mabunga.’ Nayekolaka komona makambo oyo nakutani na yango lokola mikakatano te, kasi lokola nde eteni ya mosala mosantu oyo nasalelaka Yehova.”
Linda, oyo tolobelaki liboso, alobaki boye: “Ezalaka mpasi mpo na ngai koyekola minɔkɔ mosusu. Koyekola monɔkɔ ya Bulgare ezalaki pɛtɛɛ te, mpe mbala mingi nazalaki kokanisa natika na ngai. Mbala mingi, moto amiyokaka ye moko ntango akoki te kosolola na basusu mpe azali te kokanga ntina ya makambo oyo bazali koloba. Mpo nabatela boyokani na ngai ná Nzambe makasi, nazalaki koyekola makambo nyonso na monɔkɔ ya Swedois. Nsukansuka, na lisalisi ya bandeko basi mpe mibali, nalongaki koyekola monɔkɔ yango.”
Susi ya mboka ekoki kokómisa makambo lisusu mpasi mingi. Baoyo bakendeke kofanda na mboka mopaya, batikaka bandeko mpe baninga na bango. Eva, oyo akendaki kofanda na Bulgarie elongo na mobali na ye, Yannis, alobaki boye: “Na ebandeli, namiyokaki ngai moko. Mpo na kolonga yango, tozalaki mbala na mbala kosolola na baninga na biso mpe bandeko ya libota, mpe tolukaki baninga ya sika awa.”
Ezali na mikakatano mosusu. Robert ná Liana, oyo bautaki na Swisse, balobaki boye: “Monɔkɔ, ezala mpe mimeseno ya mboka yango ezalaki mokakatano monene mpo na biso, mpe tomibongisaki te mpo na malili makasi oyo ezalaka awa.” Kasi, kozala na makanisi malamu mpe kosala mwa masɛki esalisaki babalani oyo básakola na bosembo nyonso na Bulgarie na boumeli ya mbula 14.
Mapamboli oyo bazwaki
Lilly azali kopesa toli epai ya bandeko nyonso oyo bakoki kokende na teritwaire epai mposa ya basakoli ezali mingi. Alobi boye: “Soki natikalaka na ekólo na ngai, mbɛlɛ namonaki te lisalisi ya Yehova. Awa nakoki kolekisa ntango mingi kaka mpo na kosalisa basusu, mpe yango esalisi ngai nakóma na boyokani ya makasi elongo na Nzambe, epesaka ngai esengo mpe namiyokaka malamu.” Ravil, mobali na ye, andimi likambo yango. Alobi boye: “Oyo ezali bomoi eleki malamu, ezali libaku moko ya kozala elongo na bakristo ya molende ya bikólo ndenge na ndenge oyo bamesaná koteya basusu Biblia. Nayekolaki makambo mingi epai na bango.”
Elimo na bango ya komipesa mpe ndenge bandimaki kokende na mboka mopaya esalisi mpo ‘nsango malamu ya bokonzi esakolama . . . na mabele mobimba esika bato bafandi.’ (Matai 24:14) Lokola bamipesaki na bolingo na bango moko mpo na kokende kosakwela bato na Bulgarie, bandeko na biso bamonaki ndenge Yehova akokisaki bamposa ya mitema na bango mpe ndenge asalaki ete mikano na bango ekokisama.—Nzembo 20:1-4.