Lakisá makambo oyo ezali na kati

JW.ORG​—Ebongisi bomoi ya bato

JW.ORG​—Ebongisi bomoi ya bato

Na mokili mobimba, bato bazali kozwa matomba na jw.org. Na nse, ezali na mwa makambo oyo bato bakomelaki biro monene ya Batatoli ya Yehova na sanza ya mitano ya mobu 2014, mpo na komonisa botɔndi bango.

Ezali kosalisa bana mike

“Ntango mwana na ngai ya moke autaka kelasi ayaka na bakrɛyo, mwa ba-jouet, mpe manɛti ya baninga na ye. Mbala na mbala, tomeká kosalisa ye ayeba ete kosala bongo ezali koyiba mpe ete koyiba ezali mabe. Azalaki koyoka te tii ntango tozwaki video Koyiba ezali mabe na jw.org. Video yango esalisaki mpenza mpe yango nde ebongaki mpo na kosalisa mwana na biso. Nsima ya kotala yango, alobaki ete akozongisela baninga na ye biloko nyonso azwaki, mpe amoni ete Nzambe asepelaka te na ezaleli ya moyibi. Site yango esalisaki biso mpenza!”​—D. N., Afrika.

“Video Koyiba ezali mabe oyo ezali na jw.org . . . esalisaki mpenza mpe yango nde ebongaki kosalela mpo na kosalisa mwana na biso”

“Bana na ngai balingaka site yango mingi. Bazwaka bavideo ya mikuse oyo esalisaka bango básalela malamumalamu batoli ya Biblia na likambo etali lokuta mpe moyibi. Bayekoli mpe bizaleli mosusu oyo ekoki kosalisa bango na bomoi, oyo ekosala ete bato básepela na bango mingi.”​—O. W., Bisanga ya Antilles.

Ezali kosalisa bana ya kelasi

“Nazalaki komona ete kokende kelasi ezali na ntina te, mpe namonaki malamu nakata yango. Kasi mokolo moko, natángaki na jw.org lisolo moko oyo elobi ‘Nasengeli nde kokata kelasi?’ Lisolo yango esalisaki ngai natalela kelasi na ndenge ya malamu. Esalisaki ngai namona ete kelasi ekopesa ngai formasyo mpo na mikolo ezali koya mpe ekosala ete bato bámemya ngai.”​—N. F., Afrika.

“Toli oyo site yango epesaka bilenge esalisi ngai nabatela bizaleli ya malamu na kelasi”

“Toli oyo site yango epesaka bilenge esalisi ngai nabatela bizaleli ya malamu na kelasi. Nayekoli kotya likebi na mateya ya kelasi mpe koboya makambo oyo ekolongola likebi na ngai.”​—G., Afrika.

“Moninga moko ya mosala azalaki komitungisa mpo mwana mwasi moko azalaki kotumola mwana na ye. Yango esalaki ete na boumeli ya mwa mikolo mwana na ye akimaki kelasi mpo azalaki kobanga. Nayebisaki moninga yango ya mosala mwa makambo oyo elobelami na video Longá matumoli kozanga ete obunda, na jw.org, na esika bakomi moto azali koyema. Asepelaki mingi na toli oyo elobi kosala mwa masɛki mpo na kokitisa matata. Asololaki na mwana na ye mpo na komonisa ye nini akoki kosala mpo na kokima matumoli. Na nsima, mwana na ye alongolaki kobanga mpe azongelaki kelasi. Na nsima, makambo ebongwanaki mpe mwana mwasi oyo azalaki kotumola ye, akómaki moninga na ye.”​—V. K., Mpoto ya Ɛsti.

Ezali kosalisa bilenge

“Matɔndi mingi mpo na lisolo ‘Scarifications : pourquoi est-ce que je me coupe?’ oyo ezali na site jw.org. Ezali likambo oyo nabundaka na yango banda kala. Nakanisaki ete ezalaki kokómela kaka ngai moko mpe nalingaki te koyebisa yango basusu mpo bakokoka te komitya na esika na ngai. Bandakisa oyo lisolo yango elobeli esalisaki ngai mpenza. Esalisaki ngai namona ete bato bakoki komitya na esika na ngai.”​—Elenge mwasi moko na Australie.

“Bandakisa oyo lisolo yango elobeli esalisaki ngai mpenza. Esalisaki ngai namona ete bato bakoki komitya na esika na ngai”

“Site jw.org esali ete nazwa mbala moko lisalisi na makambo oyo etungisaka bilenge. Lisolo moko esalisaki ngai nayeba makambo ndenge na ndenge oyo bato basangisaka nzoto na makasi na basusu basalaka, namona mpe ete likambo yango ekómelaki ngai, mpe nayekolaki nini nakoki kosala mpo na kokima yango.”​—T. W., Bisanga ya Antilles.

Ezali kosalisa baboti

“Mwana na ngai ya mobali azalaka makila mɔtɔmɔtɔ. Mbala mingi, nazalaki komitungisa mingi mpo na ezaleli na ye wana. Na yango, ezalaki mpasi mpenza tósolola elongo. Mokolo moko, nakɔtaki na jw.org na eteni oyo elobelaka bato oyo babalá mpe baboti. Kuna namonaki masolo ebele oyo etali ngai mpe elakisaki ngai oyo nakoki kosala mpo na kosolola na mwana na ngai. Ye mpe azwaki matomba na site yango. Akómaki kofungolela ngai motema mpe koyebisa ngai makambo oyo epesaka ye esengo mpe oyo etungisaka ye.”​—C. B., Afrika.

“Mbala na mbala, lisolo moko ebimaka na jw.org na ntango oyo ebongi mpenza mpo na kosalisa biso tólonga mikakatano oyo bana bakutanaka na yango”

“Site jw.org elakisi biso baboti ndenge mingi ya koteya bana na biso. Na ndakisa, bavideo moto azali koyema oyo emonisi ndenge ya kozwa baninga ya malamu esalisaki bana na biso bátalela boninga na ndenge oyo ebongi mpe bápona baninga oyo bazali na bizaleli ya malamu. Mbala na mbala, lisolo moko ebimaka na jw.org na ntango oyo ebongi mpenza mpo na kosalisa biso tólonga mikakatano oyo bana bakutanaka na yango. Ezali mpenza esika oyo ebongi mpo na kozwa batoli.”​—E. L., Mpoto.

Ezali kosalisa bato oyo babalá

“Ngai ná mwasi na ngai tosali mbula 6 na libala. Ndenge moko na bato nyonso oyo babalá, biso mpe tozalaki na mokakatano: ndenge na biso ya kosolola, mimeseno na biso mpe ndenge na biso ya kotalela makambo ekesanaki. Lisolo oyo elobi ‘Ndenge ya kozala moyoki malamu,’ oyo ezali na jw.org, ebendaki likebi na ngai. Epesaki batoli oyo ebongi mpo na kosalisa moto akóma moyoki malamu. Natángaki lisolo yango mpe nalakisaki yango mwasi na ngai. Tosalaki makasi ya kosalela batoli wana ya ntina mingi.”​—B. B., Bisanga ya Antilles.

“Site yango ebikisi libala na ngai”

“Nabandi kosolola na Batatoli ya Yehova kobanda mbula oyo eleki, mpe nalingaki mpenza kopesa bino matɔndi mpo na site jw.org. Nayekoli makambo mingi na site yango, na ndakisa ndenge ya komipekisa mpe ya kozala mobali malamu mpe tata malamu. Mpo na koloba solo, site yango ebikisi libala na ngai.”​—L. G., Bisanga ya Antilles.

Ezali kosalisa bato bakufá matoi

“Site jw.org esalisaki ngai namimona ete nazali na ntina. Bavideo ya elobeli ya bajɛstɛ ya Amerika esalisi ngai nayeba elobeli yango malamumalamu. Nazalaki komona lokola nakoki lisusu kosala eloko moko te ya malonga na bomoi na ngai, kasi ntango natalaki video Je « vois » la Parole de Dieu dans ma langue, yango esimbaki motema na ngai mpe etindaki ngai natya likebi na makambo ya malamu ya bomoi.”​—J. N., Afrika.

“Site jw.org esalisaki ngai namimona ete nazali na ntina”

“Site internet yango ezali mpenza na ntina mingi. Nasalisaka bato oyo bakufá matoi, mingimingi bilenge. Biloko nyonso oyo batyá kuna na elobeli ya bajɛstɛ esalisi ngai nayeba lisusu malamumalamu elobeli yango. Site yango esalisi ngai nasunga bato oyo balingi kobongisa bomoi ya mabota na bango mpe balingi kozala baninga ya malamu.”​—K. J., Bisanga ya Antilles.

Ezali kosalisa bato bakufá miso

“Nakufá miso, kasi site jw.org esalisi ngai mingi. Liboso, ezalaki kosɛnga ngai basanza mingi mpo nayeba makambo na nzela ya bamesaje na internet, kasi sikoyo nakomi koyeba makambo noki na nzela ya site yango. Site yango ebongisi bomoi ya libota na biso mpe esali ete nakóma na ntina. Na nzela ya site yango, nakómá koyeba makambo nzela moko na baninga na ngai oyo bamonaka.”​—C. A., Amerika ya Sudi.

“Site yango ebongisi bomoi ya libota na biso mpe esali ete nakóma na ntina”

“Mpo na bato oyo bayebi te kotánga ekomeli ya bato oyo bakufá miso to baoyo bazali te na mbongo ya kosomba mikanda ya ekomeli ya bato oyo bakufá miso, site jw.org esalisaka bango mpenza. Na nzela ya biloko ya koyoka na matoi, moto akufá miso akoki koyoka masolo ndenge na ndenge oyo ebimi sika. Site yango ezali mpo na bato ya ndenge nyonso. Esalisaka bato bakufá miso lokola ngai bámimona ete bazali na ntina mpe bato mosusu bápesa bango valɛrɛ.”​—R. D., Afrika.

Ezali kosalisa bato oyo balingaka koyeba Nzambe

“Site na bino ekeseni na oyo ya mangomba mosusu, mpo yango etondisaka te maloba ya lingomba mpe maloba oyo kaka basango nde bayebi. Etondisi makambo ebeleebele te mpo na kobungisa moto makanisi. Site na bino ezali mindɔndɔ te mpe elobelaka makambo oyo esengeli. Esalelaka maloba ya mindɔndɔ te, etondi mpe te na makambo ya filozofi. Emonisaka bato te ete kokóma na kondima ezali likambo moko ya mpasi. Kasi, emonisaka ete moto nyonso akoki kokóma na kondima.”​—A. G., Asie.

“Site na bino ezali mindɔndɔ te mpe elobelaka makambo oyo esengeli . . . Emonisaka ete moto nyonso akoki kokóma na kondima.”

“Soki site jw.org ezalaka te, bomoi na ngai elingaki kozala na ntina te. Na mokili oyo ezali mosika na Nzambe, site yango ezali mpenza kosalisa bato. Nakoki mbala moko komona mpe koyoka masolo oyo ezali komonisa ndenge oyo Nzambe atalelaka makambo mpe kozwa biyano na mituna mingi oyo etali bomoi.”​—J. C., Bisanga ya Antilles.

“Nasepelaka mingi na mateya ya Nzambe oyo nazwaka awa na kati ya zamba na Sudi ya Amerika. Soki site yango ezalaka te, nalingaki koyeba eloko moko te.”​—M. F., Amerika ya Sudi.