MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA
Ndenge nini nakoki kolonga mpasi ya kobungisa moto na liwa?
Ozali na moninga to ndeko moko ya libota oyo auti kokufa? Soki ezali bongo, lisolo oyo ekoki kosalisa yo na mawa oyo ozali na yango.
Na lisolo oyo
Mawa na ngai eleki ndelo?
Mpo na bato mingi, mawa ya kobungisa moto na liwa ezalaka makasi mpe esilaka noki te.
“Mokolo elekaka te kozanga ete nakanisa nkɔkɔ na ngai ya mobali. Atako esí esali mbula mibale banda akufá, soki nazali kobɛta lisolo na ye nalelaka kaka.”—Olivia.
“Nkɔkɔ na ngai ya mwasi azalaki kolendisa ngai mingi mpo na mikano oyo namityelaki, kasi azalaki na bomoi molai te mpo amona ngai ntango nazali kokokisa ata moko na yango. Nayokaka mawa makasi mbala nyonso oyo nakokisaka mokano moko, mpo azali te mpo amona yango.”—Alison.
Kobungisa moto na liwa ekoki kobimisa mayoki ya ndenge na ndenge. Na ndakisa:
“Ntango noko na ngai akufaki, nabulunganaki, mpe ezwaki ntango mingi. Ezalaki mbala ya liboso nabungisa moto oyo azalaki mpenza pene na ngai, nayokaki lokola train moko ya monene etuti ngai.”—Nadine.
“Nayokaki nkanda makasi ntango nkɔkɔ na ngai ya mobali akufaki, mpo azalaki kolandela sante na ye malamu te, atako tozalaki koyebisa ye yango.”—Carlos.
“Ngai ná yaya na ngai ya mwasi tozalaki bato ya libota oyo bazalaki wana te ntango nkɔkɔ na biso ya mobali akufaki. Na nsima, namipesaki foti mpo namonaki ete napesaki ye te mbote ya nsuka ndenge esengelaki.”—Adriana.
“Mwasi moko ná mobali na ye oyo bayebanaki mpenza malamu na libota na biso bakufaki na aksida ya motuka. Banda wana, soki kaka moto moko ya libota abimi, nazalaki kobanga ete ye mpe akoki kokufa.”—Jared.
“Ntango nkɔkɔ na ngai ya mwasi akufaki, eleki sikoyo mbula misato, nayokaki mawa mpo nalekisaki ntango mingi te na ye ntango azalaki na bomoi.”—Julianna.
Kobulungana, nkanda, komipesa foti, kobanga, mpe mawa ezali mayoki oyo emonanaka mingi ntango tobungisi moto na liwa. Soki ozali na moko ya mayoki yango, zalá na kondima ete ekokita malɛmbɛmalɛmbɛ. Kasi, okoki kosala nini mpo olonga mpasi ya kobungisa moto?
Ndenge ya kolonga mawa ya kobungisa moto na liwa
Sololá na moninga moko. Biblia elobi ete moninga ya solo ezali moto oyo “abotami mpo na bantango ya mpasi.” (Masese 17:17) Koyebisa moto ndenge ozali komiyoka ekoki kosalisa mpo ozwa lisungi oyo ebongi.
“Koyoka mawa ezali mabe te. Bantango mosusu okoki koyoka mposa ya kozala yo moko, kasi okoki komona lokola makambo ekobonga te. Mpo na yango, ezali na ntina kosolola na moto moko.”—Yvette.
Kanisáká moto yango oyo ozalaki kolinga. Biblia elobi ete “moto malamu abimisaka makambo ya malamu oyo ezali na motema na ye.” (Luka 6:45, Bible na Lingala ya lelo oyo) Okoki kokoma na mwa kaye makambo ya malamu oyo osalá ná moto yango.
“Nazwaki ekateli ya kokoma makambo nyonso oyo moninga na ngai alakisaki ngai liboso akufa, na ndenge yango nazali kozwa matomba na ndakisa na ye. Kokoma esalisaki ngai nalonga mpasi nazalaki na yango.”—Jeffrey.
Landeláká malamu sante na yo. Biblia emonisi matomba ya kosala ngalasisi. (1 Timote 4:8) Lyáká malamu, saláká ngalasisi mpe pemáká mingi.
“Ntango ozali na mawa okoki kokanisa malamu te, na yango tyá likebi na kolɔngɔnɔ ya nzoto na yo. Kobosana te kolya malamu mpe kolala.”—Maria.
Salisáká basusu. Biblia elobi: “Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.”—Acts 20:35.
“Meká kosalisaka basusu, mingimingi baoyo bakutaná na makambo lokola ya yo. Yango ekosalisa yo omona ete kaka yo moko te nde ozali na mpasi.”—Carlos.
Bimisá mayoki na yo na libondeli. Biblia ebengi Yehova Nzambe “Moyoki ya libondeli.” (Nzembo 65:2) Elobi lisusu ete Yehova “abikisaka baoyo bazoki na motema; akangaka bampota na bango.”—Nzembo 147:3.
“Sɛngá Yehova apesa yo libɔndisi mpe mpiko oyo ozali na yango mposa. Mikolo mosusu ekozala mpasi, kasi Yehova azali ntango nyonso elongo na biso.”—Jeanette.
Zalá na bokatikati. Kobosana te ete moto nyonso ayokaka ndenge moko te ntango akufeli. Biblia elobi ete Yakobo “azalaki koboya kobɔndisama” ntango akanisaki ete mwana na ye akufi. (Ebandeli 37:35) Kokamwa te soki mpasi na yo ezali koumela.
“Makambo mingi ezalaki kokondwela ngai nkɔkɔ na ngai ya mwasi, atako esí esali bambula 15 banda akufa.”—Taylor.
Kanisá soki obukani lokolo, okoyoka mpasi makasi mpe ekozwa mwa ntango mpo obonga. Monganga akoyebisa yo oyo osengeli kosala mpo lokolo na yo ezonga malamu.
Ezali mpe bongo ntango tobungisi moto oyo tolingaka, ezali lokola mokuwa ebukani, esalaka mpasi. Esengaka ntango mingi mpo mpasi yango ekita. Zalá motema molai. Talelá batoli oyo balobeli na lisolo oyo, mpe salelá oyo ebongi mpo na yo.