MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA
Nasala nini mpo bátika kolandela likambo nyonso oyo nasalaka?
Mpo na nini baboti balandelaka?
Baboti na yo balobi ezali kaka mpo batyelaka yo likebi. Kasi yo ozali komona ete bazali kolandela makambo oyo etali kaka yo moko. Na ndakisa:
Elenge moko na nkombo Erin, alobi boye: “Papa azwaka telefone na ngai, asɛngaka nayebisa ye mwa liloba oyo ekopesa ye nzela afungola telefone na ngai (mot de passe) mpe atalaka bamesaje na ngai nyonso. Soki naluki komilongisa, akanisaka ete ezali na eloko oyo nazali kobomba.”
Denise, oyo azali sikoyo na mbula mwa moke koleka 20, azali koyeba lisusu ndenge mama na ye azalaki kotala telefone na ye mpo na koluka koyeba bato boni asololi na bango. Alobi boye: “Azalaki kotala nimero mokomoko mpe kotuna ngai soki ezali ya nani mpe tosololaki nini ná moto yango.”
Elenge moko na nkombo Kayla, alobi ete mama na ye atángaki makambo na ye moko oyo akomaka na mwa kaye. Alobi boye: “Mwa kaye yango ezalaki na makambo ebele etali ndenge namiyokaka; ata mpe makambo mosusu oyo etali ye! Ntango asalaki bongo, natikaki kokoma makambo na ngai na kaye.”
Na mokuse: Baboti na yo bazali na mokumba ya kobatela yo mpe okoki kosala eloko te na ndenge oyo bakokisaka mokumba yango. Ntango mosusu balekisaka ndelo? Ekoki kozala bongo. Kasi, likambo ya esengo, ezali na makambo mosusu okoki kosala mpo omona mpenza te ete balandelaka yo.
Oyo okoki kosala
Kobombabomba makambo te. Biblia elendisi “kozala sembo na makambo nyonso.” (Baebre 13:18) Salá makasi osalaka bongo epai ya baboti na yo. Soki ozali komonisa bosembo mpe ozali kobombela bango makambo te, ekozala mpasi te bátika kolandela makambo na yo nyonso.
Kanisá naino: Makambo nini osalá oyo ekoki kotinda baboti bátyela yo motema? Okipaka te ngonga batyelá yo ya kozonga ndako? Olingaka te báyeba baninga na yo? Olingaka te báyeba makambo osalaka?
“Nasengeli koyokana na baboti na ngai. Nabombelaka bango te makambo oyo nazali kokutana na yango. Nayebisaka bango makambo nyonso balingi koyeba, yango wana batyelaka ngai motema mpe balandelaka ngai te.”—Delia.
Zalá motema molai. Biblia elobi: “Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima.” (2 Bakorinti 13:5) Esɛngaka ntango mpo bákóma kotyela yo motema mpo na makambo oyo ozali kosala, kasi milende wana ezali ya mpamba te.
Kanisá naino: Baboti na yo mpe bazalaká bilenge. Yango ezali na ntina nini mpo na ndenge oyo balandelaka bomoi na yo?
“Nakanisi, baboti babosanaka te mabunga oyo basalá mpe balingaka te ete bana na bango bákwea na motambo yango.”—Daniel.
Mityá na esika na bango. Meká kotalela makambo ndenge baboti na yo bazali kotalela yango. Biblia elobi ete mwasi ya makoki ‘atyaka likebi na makambo ya bato ya ndako na ye’ mpe tata malamu abɔkɔlaka bana na ye “na disiplini mpe na makebisi ya Yehova.” (Masese 31:27; Baefese 6:4) Ezali pɛtɛɛ te kokokisa mokumba yango: Baboti basengeli kolandela makambo ya bomoi na yo.
Kanisá naino: Soki yo nde ozali moboti mpe oyebi makambo etali bilenge; okotikela mwana na yo nzela asala makambo nyonso alingi, kozanga kotuna ye?
“Soki ozali elenge, okoki komona lokola baboti bazali kotya bomoi na yo na nkaka. Sikoyo lokola nakómi mokóló, namoni ntina oyo baboti basengeli kosala bongo. Ezali mpo balingaka bana na bango.”—James.