Lakisá makambo oyo ezali na kati

MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | YONATANE

Yonatane​—“Eloko moko te ekoki kopekisa Yehova”

Yonatane​—“Eloko moko te ekoki kopekisa Yehova”

Meká komona na makanisi mwa etuluku ya basoda oyo bazalaka liboso bazali kotala na nse, na esika mabele ekauká mpe ya mabangamabanga. Basoda yango ya Bafilistia oyo batɛlɛmi na esika yango bamoni likambo moko oyo etindi bango bákoba kotala: Mibali mibale ya Bayisraele batɛlɛmi na esika ya polele na lobwaku. Basoda yango bazali nde kosɛka mpo bamoni likambo oyo ekoki kobangisa bango te. Banda kala Bafilistia bakonzaka Bayisraele mpe Bayisraele bakoki kutu te kopelisa mino ya bisaleli na bango ya bilanga kozanga ete bákende epai ya banguna na bango Bafilistia mpo na koluka lisalisi. Yango wana basoda ya Yisraele bazali na bibundeli ya malonga te. Longola yango, bazali kaka mibali mibale! Ata soki bazalaki basoda oyo bazali na bibundeli, mabe nini bakokaki kosala? Na kosɛkasɛka nyonso basoda ya Bafilistia bazalaki kobelela boye: “Bómata awa, mpe bokomona!”​—1 Samwele 13:19-23; 14:11, 12.

Kutu, “bokomona” oyo Bafilistia balobaki elingaki nde kobalukela bango moko. Bayisraele yango mibale bapotaki mbangu na lobwaku yango, bakatisaki yango mpe na nsima bamataki na esika oyo ezalaki mwa pene. Ezalaki ngomba mpenza na boye ete basalelaki mabɔkɔ ná makolo mpo na komata, bakobaki kopusana, komata na mabanga, kokende epai basoda yango bazalaki! (1 Samwele 14:13) Bafilistia bamonaki sikoyo ete mobali oyo azalaki liboso azalaki na ebundeli; momemi-bibundeli na ye azalaki kolanda ye na nsima. Kasi azalaki nde kokamba etumba oyo bato mibale bazalaki kobundisa etuluku mobimba ya basoda? Azalaki na ligboma?

Azalaki na ligboma te; azalaki nde na kondima makasi. Nkombo na ye Yonatane mpe istware na ye ezali na mateya mingi mpo na bakristo ya solo lelo oyo. Atako tokendaka bitumba te, tokoki koyekola makambo mingi na oyo etali ezaleli ya mpiko, bosembo mpe ya kozanga moimi oyo Yonatane amonisaki, bizaleli oyo tosengeli na yango mpo na kokóma na kondima ya solosolo.​—Yisaya 2:4; Matai 26:51, 52.

Mwana ya sembo mpe soda ya mpiko

Mpo tóyeba ntina oyo Yonatane akendaki kobundisa basoda yango, tosengeli koyeba naino ndenge akolaki. Yonatane azalaki mwana ya liboso ya Saulo, mokonzi ya liboso ya Yisraele. Ntango batyaki Saulo mafuta mpo akóma mokonzi, Yonatane azalaki na mbula soki 20 to koleka. Emonani ete Yonatane ná tata na ye bazalaki koyokana malamu mpenza mpe mbala mingi tata na ye azalaki koyebisa ye makambo. Na ntango wana, Yonatane ayebaki tata na ye kaka te lokola engambe mpe mobali kitoko mpe soda ya mpiko, kasi oyo eleki ntina; ayebaki ye lokola moto ya kondima mpe ya komikitisa. Yonatane amonaki ntina oyo Yehova aponaki Saulo azala mokonzi. Ata mosakoli Samwele alobaki ete moto moko te akokanaki na Saulo na mokili wana!​—1 Samwele 9:1, 2, 21; 10:20-24; 20:2.

Boye Yonatane azalaki komona yango lokumu ndenge tata na ye azalaki komanda ya basoda oyo bazalaki kobundisa banguna ya basaleli ya Yehova. Bitumba yango ezalaki te lokola bitumba ya lelo oyo bikólo ebundisanaka. Na eleko wana, Yehova aponaki ekólo Yisraele lokola momonisi na ye mpe bikólo oyo ezalaki kosambela banzambe ya lokuta ezalaki kobundisa Yisraele mingi. Bafilistia, oyo bizaleli na bango ebebaki na losambo ya banzambe ya lokuta, na ndakisa nzambe Dagone, mbala mingi balukaki konyokola ata mpe koboma libota ya bato oyo Yehova aponaki.

Na yango, mpo na bato lokola Yonatane, kobunda ezalaki mosala oyo ezalaki komonisa bosembo na ye epai ya Yehova Nzambe. Mpe Yehova apambolaki milende ya Yonatane. Ntango Saulo akómaki mokonzi, eumelaki te atyaki mwana na ye komanda ya basoda 1000 mpe Yonatane akambaki bango mpo na kobundisa basoda ya Filistia na Geba. Atako basoda na ye bazalaki na bibundeli ya malonga te, kasi na lisalisi ya Yehova Yonatane alongaki etumba na mokolo wana. Na yango, Bafilistia bayanganisaki ebele mpenza ya basoda. Basoda mingi ya Saulo babangaki. Bamosusu bakimaki mpe babombanaki, mwa ndambo na bango bamityaki kutu na ngámbo ya Bafilistia! Kasi mpiko ya Yonatane ekitaki te.​—1 Samwele 13:2-7; 14:21.

Na mokolo oyo tolobeli awa na ebandeli ya lisolo, Yonatane azwaki ekateli ya kobima elongo na momemi-bibundeli na ye, kozanga bato mosusu báyeba. Ntango bakómaki kopusana na Mikemashe esika basoda ya Bafilistia bazalaki, Yonatane ayebisaki momemi-bibundeli na ye likambo oyo akanaki kosala. Bakomimonisa polele epai ya basoda ya Filistia na esika yango. Soki Bafilistia balobi na biso tómata kobunda na bango, yango ekozala elembo oyo ekomonisa ete Yehova akosalisa basaleli na ye. Momemi-bibundeli andimaki mbala moko likanisi yango, ekoki kozala mpo na maloba ya nguya oyo Yonatane alobaki: “Eloko moko te ekoki kopekisa Yehova kobikisa, ezala na bato mingi to na bato moke.” (1 Samwele 14:6-10) Alingaki mpenza koloba nini?

Emonani ete Yonatane ayebaki Nzambe na ye malamu mpenza. Na ntembe te, ayebaki ndenge Yehova asalisaki bato na ye kala bálonga banguna na bango oyo bazalaki ebele mpenza koleka bango. Na bantango mosusu Yehova asalelaki kutu moto kaka moko mpo na kopesa elonga. (Basambisi 3:31; 4:1-23; 16:23-30) Yango wana Yonatane ayebaki ete motángo ya bato te, makasi te, bibundeli mpe te ya basaleli ya Nzambe nde ezali na ntina; kasi nde kondima na bango. Na yango, na kondima, Yonatane atikaki Yehova amonisa soki ye ná momemi-bibundeli na ye basengeli kobundisa basoda yango; aponaki elembo oyo ekomonisa ete Yehova andimi likanisi na bango. Ntango Yehova amonisaki ye ete andimi likanisi na bango, Yonatane akendaki na kozanga kobanga nyonso.

Talá makambo mibale ya kondima ya Yonatane. Ya liboso, azalaki na limemya makasi epai ya Nzambe na ye Yehova. Ayebaki ete esɛngaka makasi ya moto te mpo Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akokisa mikano na ye, ata bongo Yehova asepelaka kopambola bato ya sembo oyo basalelaka ye. (2 Ntango 16:9) Ya mibale, Yonatane alukaki elembo oyo emonisi ete Yehova andimi likanisi na ye liboso asala likambo yango. Lelo oyo, tolukaka te elembo moko oyo euti na Nzambe mpo tóyeba soki andimi tósala likambo boye to boye. Lokola tozali na Biblia na mobimba na yango, tozali na nyonso oyo esengeli mpo na kososola mokano ya Nzambe. (2 Timote 3:16, 17) Totalelaka malamumalamu likanisi ya Biblia liboso ya kozwa bikateli ya ntina mingi? Soki bongo, tokomonisa ete tokipaka liboso mokano ya Nzambe koleka oyo ya biso; tosalaka mwa moke lokola Yonatane.

Na yango, mibali mibale wana, soda mpe momemi-bibundeli na ye bamataki ngomba mpo na kokende esika basoda yango bazalaki. Nsukansuka, Bafilistia bamonaki ete bazalaki kobundisa bango mpe batindaki basoda bábundisa mibali yango mibale. Bafilistia bazalaki mingi mpe bazalaki likoló ya ngomba yango wana bakokaki koboma nokinoki mibali yango mibale oyo bayaki kobundisa bango. Kasi Yonatane azalaki kobɛta soda mokomoko mpe momemi-bibundeli na ye azalaki koboma bango na nsima na ye. Kaka na ntaka mokuse, mibali yango mibale babomaki basoda 20 oyo bazalaki banguna na bango! Mpe Yehova asalaki likambo mosusu. Biblia elobi boye: “Bongo kolɛnga ekɔtaki na kaa yango, na esobe, mpe kati na bato nyonso ya mwa etuluku ya basoda oyo bazalaka liboso; mpe limpinga ya bapunzi yango mpe elɛngaki, mpe mabele ebandaki koningana, mpe yango ekómaki kolɛnga moko oyo euti na Nzambe.”​—1 Samwele 14:10-15.

Yonatane akambaki etumba oyo bazalaki kaka bato mibale mpo na kobundisa etuluku mobimba ya basoda oyo bazalaka liboso

Na mosika, Saulo ná bato na ye bazalaki kotala ndenge Bafilistia bakómaki na yikiyiki mpe kolɛnga, bakómaki kutu kobomana bango na bango! (1 Samwele 14:16, 20) Bayisraele bazwaki mpiko mpe bayaki kobunda, mbala mosusu bazwaki bibundeli ya basoda ya Bafilistia oyo bakufaki. Na mokolo yango Yehova apesaki bato na ye elonga moko monene. Yehova abongwani te; soki lelo oyo tomonisi kondima epai na ye ndenge Yonatane ná momemi-bibundeli na ye bamonisaki, tokozala na ntina ya koyoka mawa te mpo na ekateli yango.​—Malaki 3:6; Baroma 10:11.

“Ezali elongo na Nzambe nde ye asalaki mosala”

Elongo yango ezalaki ndenge moko te mpo na Saulo ná Yonatane. Saulo asalaki mabunga mosusu ya minene. Atosaki Samwele te mosakoli oyo Yehova atyaki na ndenge apesaki mbeka oyo mosakoli yango, oyo azalaki mpe Molevi asengelaki kopesa. Ntango Samwele akómaki, ayebisaki Saulo ete mpo na kozanga botosi na ye, bokonzi na ye ekoumela te. Na nsima, ntango Saulo atindaki basoda na ye na etumba, alapisaki bango naino liboso ndai oyo ya mabe: “Moto oyo akolya limpa liboso mpokwa ekóma mpe liboso nazongisela banguna na ngai mabe, moto wana alakelama mabe!”​—1 Samwele 13:10-14; 14:24.

Maloba wana ya Saulo emonisaki ete akobaki kobeba se kobeba. Mobali yango oyo azalaki liboso moto ya komikitisa mpe oyo abangaka Nzambe, akómaki nde koluka lokumu na ye moko? Kutu, Yehova apesaki te epekiseli wana oyo ezangá ntina epai ya mibali yango ya mpiko, basoda oyo basalaki mosala makasi. Bongo maloba oyo ya Saulo “liboso nazongisela banguna na ngai mabe”​—emonisi ete Saulo akanisaki ete etumba yango ezalaki kaka mpo na ye moko? Abosanaki ete bosembo ya Yehova nde ezalaki na ntina kasi te nkanda ya Saulo ya kozongisela banguna yango mabe, lokumu na ye to kobɔtɔla mboka yango?

Yonatane ayebaki te ete tata na ye alapisaki bato ndai wana ya mabe. Lokola alɛmbaki mpo etumba ezalaki makasi, akɔtisaki lingenda na ye na kati ya ndako ya nzoi mpe alyaki mwa mafuta ya nzoi; ayokaki mbala moko nzoto na ye ezongi makasi. Na nsima, moko ya basoda na ye ayebisaki ye ndenge tata na ye apekisaki bato bálya eloko. Yonatane ayanolaki ye boye: “Tata na ngai amemeli mokili mpasi. Nabondeli bino, bótala ndenge miso na ngai engɛngi kaka mpo nameki mwa ndambo ya mafuta ya nzoi oyo. Bongo soki bato bályaka biloko oyo bapunzaki epai ya banguna na bango na mokolo ya lelo elingaki kozala ndenge nini? Mpo sikoyo, koboma oyo tobomi Bafilistia ezali monene te.” (1 Samwele 14:25-30) Alobaki solo. Yonatane azalaki mwana moko ya sembo, kasi azalaki bindimandima te. Azalaki te kondima bindimandima likambo nyonso oyo tata na ye azalaki kosala to koloba mpe kotalela makambo ndenge wana esalaki ete basusu bápesa ye limemya.

Ntango Saulo ayebaki ete Yonatane abukaki mobeko oyo apesaki, aboyaki kaka kondima ete bozoba ya mobeko oyo apesaki. Kutu, andimaki mpenza ete mwana na ye abomama! Yonatane akakolaki ekateli yango te, asɛngaki mpe te ete bámonisela ye motema mawa. Talá eyano oyo apesaki. Kozanga kobanga, alobaki boye: “Ngai oyo! Tiká nakufa!” Kasi, bato balobaki na Saulo boye: “Yonatane asengeli nde kokufa, ye moto amemi lobiko monene boye na Yisraele? Ekoki kokanisama ata moke te! Lokola Yehova azali solo na bomoi, ata nsuki moko te ya motó na ye ekokwea na mabele; mpo ezali elongo na Nzambe nde ye asalaki mosala na mokolo ya lelo.” Nini emonanaki? Saulo azongisaki makanisi na nzela. Lisolo yango elobi: “Na yango, bato basikolaki Yonatane, mpe akufaki te.”​—1 Samwele 14:43-45.

“Ngai oyo! Tiká nakufa!”

Yonatane amisalelaki nkombo malamu mpo na mpiko na ye, mosala makasi oyo asalaki mpe elimo ya komipimela oyo amonisaki. Ntango azalaki na likama, nkombo malamu oyo amisalelaki esalisaki ye. Ekozala malamu tótalela nkombo nini tozali komisalela mokolo na mokolo. Biblia elobi ete nkombo malamu ezali na motuya mingi. (Mosakoli 7:1) Soki toluki komisalela nkombo malamu liboso ya Yehova lokola Yonatane, nkombo yango ekozala na motuya mingi mpenza.

Molili ezali se kokóma makasi

Atako Saulo asalaki mabunga, Yonatane akobaki kobunda na bosembo nyonso na boumeli ya ebele ya bambula elongo na tata na ye. Tókanisa naino ndenge azalaki komiyoka ntango tata na ye akobaki kozanga botosi epai ya Yehova mpe komonisa ezaleli ya lolendo. Molili ezalaki se kokóma makasi na bomoi ya tata na ye mpe Yonatane azangaki makasi ya kopekisa yango.

Makambo ebebaki makasi ntango Yehova apesaki Saulo mokumba ya kobundisa Baamaleke, bato oyo bamipesaki na kosala mabe banda na mikolo ya Moize mpe Yehova asakolaki kobebisama ya ekólo yango mobimba. (Kobima 17:14) Ayebisaki Saulo abebisa bibwɛlɛ na bango nyonso mpe aboma mokonzi na bango, Agage. Saulo alongaki etumba yango, na ntembe Yonatane abundaki etumba yango na nse ya litambwisi na ye ndenge amesanaki. Kasi Saulo atosaki Yehova te, atikaki Agage na bomoi mpe abatelaki bozwi mpe bibwɛlɛ nyonso. Mosakoli Samwele alobaki ekateli ya nsuka oyo Yehova azwelaki Saulo: “Lokola oboyi liloba ya Yehova, ye mpe aboyi yo ozala mokonzi.”​—1 Samwele 15:2, 3, 9, 10, 23.

Eumelaki te, Yehova alongolaki elimo na ye likoló ya Saulo. Lokola Yehova azalaki lisusu elongo na Saulo te, Saulo akómaki nkandankanda, kosilikasilika mpe kobangabanga. Ezalaki lokola nde Nzambe alongolaki elimo ya malamu mpe apesaki ye elimo ya mabe. (1 Samwele 16:14; 18:10-12) Na ntembe te, Yonatane amitungisaki mpenza komona ndenge tata na ye ya malamu akómaki moto mabe bongo! Ata bongo, Yonatane atikaki te kosalela Yehova mosala na bosembo. Apesaki tata na ye mabɔkɔ na kotalela makoki na ye; azalaki kutu na bantango mosusu kolobela ye makambo polele, kasi atyaki makanisi na ye epai ya Yehova Nzambe Tata na ye oyo abongwanaka te.​—1 Samwele 19:4, 5.

Esí ekómelá yo omona ndenge moto moko oyo olingaka, mbala mosusu ndeko na yo ya libota akómi moto mabe mpenza? Ekoki kozala likambo moko ya mpasi mpenza. Ndakisa ya Yonatane ekundweli biso maloba oyo mokomi ya Nzembo akomaki na nsima: “Soki tata na ngai ná mama na ngai basundoli ngai, Yehova ye moko akolɔkɔta ngai.” (Nzembo 27:10) Yehova azali sembo. Akolɔkɔta yo mpe akozala Tata malamu koleka batata nyonso ata soki moto ya kozanga kokoka asali yo nini to asundoli yo.

Ekoki kozala ete Yonatane ayebaki ete Yehova akanaki kobɔtɔla Saulo bokonzi. Yonatane asalaki nini? Amitunaki soki akozala mokonzi ya ndenge nini? Azalaki na elikya ya kobongisa mabunga mosusu oyo tata na ye asalaki, kotika ndakisa ya mokonzi malamu koleka oyo azali na botosi? Toyebi te nini azalaki kokanisa na motema na ye; toyebi kaka ete elikya nyonso ya ndenge wana elingaki kokokisama te. Yango elingi nde koloba ete Yehova asundolaki mobali wana ya sembo? Ata moke te, kutu asalelaki Yonatane mpo na kopesa ndakisa ya malamu mpenza oyo etali boninga ya sembo oyo Biblia elobeli! Tokolobela mingi boninga yango na lisolo mosusu oyo ekolobela Yonatane.