Lakisá makambo oyo ezali na kati

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Okoki kosala nini mpo obɔkɔla bana na yo malamu?

Okoki kosala nini mpo obɔkɔla bana na yo malamu?

 Oyo osengeli koyeba

 Lelo oyo, na bamboka mosusu, bana bazalaka na boninga makasi na baboti na bango mpe balukaka toli epai ya baboti na bango. Mpe na bamboka mosusu, mbala mingi bana bakendeke koluka toli epai ya baninga na bango bilenge.

 Ntango bana bazali koluka toli epai ya bilenge mosusu, yango esalaka ete bana bátosa te toli ya baboti na bango. Kutu, wana bazali kokola mpe kokóma bilenge, baboti na bango bakoki komona ete bana bazali kotyela bango lisusu motema te. Mpe ezali likambo ya kokamwa te! Ntango bana balekisaka ntango mingi na bana mosusu, ezali lokola bazali kobɔkɔlama bango moko na esika bábɔkɔlama na baboti na bango.

 Mpo na nini ezali mpasi te bana básala boninga makasi na baninga na bango bilenge na esika básala yango na baboti na bango? Tótalela makambo oyo elandi.

  •   Kelasi. Ntango bana bazali kolekisa ntango mingi elongo na bana mosusu, bakómaka na boninga makasi mpe bakoki kobanda kopesa valɛrɛ mingi na makanisi ya baninga na bango bilenge na esika bápesa valɛrɛ mingi na makanisi ya baboti na bango. Makanisi wana ekoki lisusu kokóma makasi wana bana bazali kokóma bilenge.

    Bana basengeli kozwa na valɛrɛ mingi toli ya baboti koleka oyo ya baninga na bango ya kelasi

  •   Kozanga kolekisa ntango mingi elongo na bana. Na mabota mingi, ntango bana bautaka kelasi, bakutaka moto te na ndako, mbala mosusu mpo moboti to baboti bazali na mosala.

  •   Makambo oyo bilenge basepelaka na yango. Wana bana bazali kokóma bilenge, balingaka kozala lokola bilenge mosusu, na ndakisa bamekolaka ndenge na bango ya kolata, ya koloba mpe ya kosala makambo. Basepelaka mingi kosala makambo oyo baninga na bango balingi na esika ya kosala oyo baboti na bango balingi.

  •   Bapiblisite. Bato ya mimbongo bazali kobimisa biloko mingi mpe masano ndenge na ndenge mingimingi mpo na kobenda likebi ya bilenge, kasi ya mikóló te. Yango esalaka ete ekóma mpasi baboti ná bana báyokana malamu. Doktɛrɛ Robert Epstein akomi boye: “Soki baizini ezali lisusu kobimisa te biloko oyo bilenge basepelaka na yango, bakompanyi mingi ekokwea mpe ekobungisa bamilio ya badolare.” a

 Oyo okoki kosala

  •   Salá ete boninga na yo ná mwana na yo ekoba kozala makasi.

     Biblia elobi: “Maloba oyo nazali kopesa yo mitindo lelo esengeli kozala na motema na yo; mpe osengeli kokɔtisa yango malamumalamu na kati ya mwana na yo mpe kolobela yango ntango okofanda na ndako na yo mpe ntango okotambola na balabala mpe ntango okolala mpe ntango okolamuka.”​—Kolimbola mibeko 6:6, 7.

     Mwana akoki kozala na baninga, kasi baninga yango bakoki te kozwa esika na yo moboti. Kasi kolɛmba nzoto te: Bato ya mayele balobi ete bana mpe bilenge mingi batosaka baboti na bango mpe balingaka kosepelisa bango. Soki okobi kosala boninga makasi na bana na yo, bakotyela yo motema mingi koleka baninga na bango bilenge.

     “Osengeli kolekisa ntango elongo na bana na yo, kosala eloko nyonso elongo, na ndakisa kolamba, kotya bopɛto, ata mpe kosala badevuare. Sakanáká elongo na bango​—bóbɛtaka masano, bótalaka bafilme to televizyo elongo. Kokanisa te ete esuki kaka na kolekisa mwa ntango malamu elongo na bana​—kosakana mwa bangonga awa to kuna. Bokoki te kokómisa boninga na bino makasi soki bolekisaka ntango mingi te elongo!”​—Lorraine.

  •   Lendisá mwana azala kaka te na baninga oyo bazali na ye mbula moko.

     Biblia elobi: “Bozoba ekangami na motema ya mwana mobali.”​—Masese 22:15.

     Baboti mosusu basepelaka ntango bamonaka ete mwana na bango azali na baninga mingi. Atako mwana na yo akoki kozala na baninga mingi, azali mpe na mposa ya kozala na baninga oyo bazali na mbula ekeseni mpo básalisa ye akola malamu. Lisusu, bilenge bapesaka te toli to litambwisi oyo elenge asengeli na yango mpe oyo baboti ya bolingo bakoki kopesa ye.

     “Baninga ya mwana bakoki koyeba makambo mosusu, kasi bayebi makambo mingi te ya bomoi, bazangi eksperiansi, mpe bwanya mpo básalisa bilenge mosusu bázwa bikateli ya malamu. Ntango bilenge balukaka toli ya baboti na bango, bakolaka malamu mpe bakómaka bato oyo bakomeli.”​—Nadia.

  •   Pesáká toli ya bwanya.

     Biblia elobi: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya.”​—Masese 13:20.

     Ata soki bakómi mikóló, bana na yo bakoki kozwa matomba wana bazali kolekisa ntango elongo na yo. Zalá ndakisa malamu mpo na bana na yo.

     “Baboti basengeli kozala ndakisa oyo eleki malamu mpenza mpo na bana na bango. Soki bateyi bana bálinga mpe bátosa baboti na bango, bakolinga kokóma lokola baboti na bango.”​—Katherine

a Euti na buku Teen 2.0—Saving Our Children and Families From the Torment of Adolescence.