Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nzambe akelaki nde lolenge nyonso ya bomoi na nzela ya evolisyo?

Nzambe akelaki nde lolenge nyonso ya bomoi na nzela ya evolisyo?

Eyano ya Biblia

 Te. Biblia elobi polele ete Nzambe akelaki bato, “mitindo” ndenge na ndenge ya nyama mpe ya nzete. a (Ebandeli 1:12, 21, 25, 27; Emoniseli 4:11) Elobi ete libota mobimba ya bato eutaki na Adama ná Eva, baboti na biso ya liboso. (Ebandeli 3:20; 4:1) Biblia elobi te ete Nzambe asalelaki evolisyo mpo na kokela mitindo ndenge na ndenge ya bomoi. Kasi eboyi te likanisi ya bato ya siansi oyo emonisaka ete mbongwana esalemaka na motindo mokomoko ya ekelami ya bomoi.

 Nzambe asalelaki nde evolisyo?

 “Bato oyo bandimaka ete Nzambe asalelaki evolisyo mpo na kokela bomoi bazalaka na makanisi ekeseni mpo na kolimbola yango.” Na kotalela buku Encyclopædia Britannica, bapesaka likanisi ete “Nzambe asalelaka kaka biloko oyo ezali na mokili mpo na kobimisa biloko mosusu.”

 Bato ya evolisyo bateyaka mpe ete:

  •   Bikelamu nyonso ya bomoi eutá na bankɔkɔ ya kala mpenza.

  •   Motindo moko ya bomoi ekoki kobimisa yango moko motindo mosusu ya bomoi.

  •   Ekoki kozala ete Nzambe nde asalaka makambo yango esalema bongo.

 Evolisyo eyokani na mateya ya Biblia?

 Bato ya evolisyo balobaka ete makambo oyo Biblia elobi mpo na bozalisi na Ebandeli ezali mpenza solo te. Kasi, Yesu amonisaki ete masolo oyo ezali na Ebandeli ezali mpenza makambo ya solo. (Ebandeli 1:26, 27; 2:18-24; Matai 19:4-6) Biblia elobi ete liboso aya awa na mabele, Yesu azalaki na likoló elongo na Nzambe mpe Nzambe asalaki “biloko nyonso” na nzela ya Yesu. (Yoane 1:3) Na yango, likanisi oyo elobi ete Nzambe asalelaki evolisyo mpo na kokela mitindo ndenge na ndenge ya bomoi eyokani te na mateya ya Biblia.

 Ezali boni mpo na likoki oyo banzete ná banyama ezalaka na yango ya kobongwana mpo ebika bisika mosusu?

 Biblia elobeli te soki mbala boni motindo moko ekoki kobongwana. Kasi eboyi mpe te ete mitindo ndenge na ndenge ya banyama to ya banzete oyo Nzambe akelá ekoki kobongwana na kolanda esika yango ezali. Atako basusu bakanisaka ete bambongwana wana ezali evolisyo, kasi motindo moko te ya sika ebimaka na bambongwana yango oyo esalemaka.

a Biblia esaleli liloba “motindo,” oyo ezali na ndimbola monene koleka liloba “lolenge” oyo bato ya siansi basalelaka. Mbala mingi, bato ya siansi balobaka ete lolenge ya sika ya bomoi ebimaka kaka yango moko, kasi mpo na koloba solo ebongwanaka yango moko na kolanda motindo na yango, ndenge liloba oyo basaleli na Ebandeli emonisi yango.