Lakisá makambo oyo ezali na kati

Lifelo ezalaka mpenza? Na kotalela Biblia, lifelo ezali nini?

Lifelo ezalaka mpenza? Na kotalela Biblia, lifelo ezali nini?

Eyano ya Biblia

 Babiblia mingi ya kala na Anglais, na ndakisa King James Version, ezali na liloba “lifelo” na bavɛrsɛ mosusu. (Nzembo 16:10; Misala 2:27 a) Ndenge elilingi oyo ezali na lisolo oyo emonisi yango, bato mingi bandimaka ete lifelo ezali esika oyo bato mabe bazikaka na mɔtɔ oyo ekufaka te. Kasi Biblia eteyaka mpenza bongo?

Na lisolo oyo

 Lifelo ezali mpenza esika bato mabe banyokwamaka libela na libela?

 Te. Na Babiblia mingi ya kala, maloba oyo ebongolami na “lifelo” (na Ebre, “Sheole”; na Grɛki, “Hadesi”) ezalaki komonisa “Nkunda,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Biblia emonisi ete na “Nkunda” bato bazalaka na bomoi te, to bayebaka eloko te.

  •   Bato oyo bakufá bamiyebaka te, elakisi, bayokaka mpe mpasi te. “Mosala ezali te, makanisi te, bwanya, boyebi mpe te na lifelo.” (Mosakoli 9:10, Douay-Rheims Version, na Anglais) Lifelo ezali te na bato oyo bagangaka ntango nyonso mpo na mpasi. Kutu, Biblia elobi: “Bato mabe báyoka nsɔni; báfanda nyɛɛ na kati ya Nkunda.”​—Nzembo 31:17

  •   Nzambe alobá ete etumbu ya lisumu ezali liwa, kasi te kozika na mɔtɔ ya libela. Nzambe ayebisaki Adama, mobali ya liboso, ete soki atosi te mobeko ya Nzambe akokufa. (Ebandeli 2:17) Alobelaki makambo ya mɔtɔ na lifelo te. Na nsima, ntango Adama asalaki lisumu, Nzambe ayebisaki ye etumbu na ye, alobaki: “Ozali putulu mpe okozonga na putulu.” (Ebandeli 3:19) Elakisi akozala lisusu na bomoi te. Soki esɛngaki ete Adama akende na lifelo ya mɔtɔ, kozanga ntembe Nzambe alingaki kolobela yango, boye te? Tii lelo Nzambe abongolá te etumbu ya bato oyo babukaka mibeko na ye. Bambula mingi nsima ya lisumu ya Adama, Nzambe atindaki mokomi moko ya Biblia akoma boye: “Lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.” (Baroma 6:23) Longolá liwa etumbu mosusu ezali te, “mpo moto oyo akufi afuti nyongo ya lisumu na ye.”​—Baroma 6:7.

  •   Mpo na Nzambe, likanisi ya kozikisa bato na mɔtɔ ya libela ekoki koleka te. (Yirimia 32:35) Mpo likanisi yango eyokani te na oyo Biblia elobi, ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Alingaka tósambela ye mpo tolingi ye, kasi te mpo tozali kobanga kozika na lifelo.​—Matai 22:36-38.

  •   Bato malamu bakendaki mpe na lifelo. Babiblia oyo esaleli “lifelo” emonisi ete mibali oyo bazalaki kobanga Nzambe, na ndakisa Yakobo ná Yobo, bayebaki ete bakokende na lifelo. (Ebandeli 37:35; Yobo 14:13) Babiblia yango emonisi ete ata Yesu kutu akendaki na lifelo na mwa mikolo oyo alekisaki na liwa liboso asekwa. (Misala 2:31, 32) Emonani polele ete ntango Babiblia yango esaleli liloba “lifelo,” yango elingi kaka komonisa Nkunda. b

 Lisese oyo Yesu apesaki ya mozwi mpe Lazare elakisi mpenza nini?

 Lisese yango ya Yesu ezali na Luka 16:19-31. Masese ezalaka bandakisa oyo epesaka mateya ya solo na makambo ya bomoi to na makambo ya Nzambe. Lisese ya mozwi ná Lazare ezalaki te likambo ya solo oyo esalemá. (Matai 13:34) Mpo na koyeba makambo mingi etali lisese yango, tángá lisolo “Lisese ya mozwi ná Lazare ezali likambo oyo esalemá mpenza?

 Lifelo emonisaka ete moto ya masumu akabwani na Nzambe?

 Te. Liteya oyo emonisaka ete bato oyo bakufá bakoki koyeba ete bakabwani na Nzambe eyokani te na oyo Biblia elobaka. Biblia elobi polele ete bakufi bayebaka ata eloko te.​—Nzembo 146:3, 4; Mosakoli 9:5.

 Ezali na moto moko oyo abimá na lifelo?

 Ɛɛ. Biblia ebeti masolo ya bato 9 oyo bakendaki na Nkunda (oyo babongoli na “lifelo” na Babiblia mosusu) oyo basekwaki to bazongaki na bomoi. c Soki bazalaki komiyeba ntango bazalaki na lifelo, balingaki kobetela bato masolo ya makambo oyo bamonaki kuna. Nzokande, ata moko te alobaki ete azalaki konyokwama to amonaki eloko moko boye. Mpo na nini? Ndenge Biblia emonisi yango, bazalaki komiyeba te, ezali lokola nde balalaki “mpɔngi” ya makasi.​—Yoane 11:11-14; 1 Bakorinti 15:3-6.

a Babiblia mingi ya mikolo na biso na Lingala esaleli te liloba “lifelo” na Misala 2:27. Misusu esaleli maloba lokola “mboka ya bato bakufá,” (Bible na Lingala ya lelo oyo); “esika na bakufi,” (Haut fleuve).