Mpo na nini Banazi babomaki ebele ya Bayuda? Mpo na nini Nzambe asalaki eloko te?
Bato mingi oyo batunaka mituna wana bayokaka mpasi makasi mpo babungisá bandeko mpe baninga na bango ya motema. Bato balukaka kaka biyano te na mituna yango kasi balukaka mpe libɔndisi. Mpo na bato mosusu, kobomama ya Bayuda (holocauste) ezali likambo eleki mabe na makambo nyonso oyo moto asalá, mpe yango esalá ete bato yango bakokaka mpenza kondimela Nzambe te.
Makanisi ya bato mpo na Nzambe mpe kobomama ya Bayuda
Makanisi ya bato: Ezali mabe komituna ntina oyo Nzambe atikaki Banazi báboma ebele ya Bayuda.
Likambo ya solo: Ata bato oyo bazalaki na kondima makasi bamitunaki ntina oyo Nzambe atikaka ete mabe ezala. Na ndakisa, mosakoli Habakuku atunaki Nzambe boye: “Mpo na nini otiki mobulu, kobuka mibeko, koboma, mpe mabe ezala bisika nyonso?” (Habakuku 1:3, Contemporary English Version) Nzambe apamelaki Habakuku te; atikaki nde ete mituna ya Habakuku ekomama na Biblia mpo bato nyonso bátánga yango.
Makanisi ya bato: Nzambe akipaka bampasi ya bato te.
Likambo ya solo: Nzambe ayinaka makambo ya mabe mpe bampasi oyo yango ememaka. (Masese 6:16-19) Na mikolo ya Noa, Nzambe “ayokaki mpasi na motema na ye” mpo mobulu ezalaki mingi na mabele. (Ebandeli 6:5, 6) Na ntembe te, Nzambe ayokaki mpe mpasi makasi ntango Banazi babomaki ebele ya Bayuda.—Malaki 3:6.
Makanisi ya bato: Nzambe atikaki ebele ya Bayuda bábomama mpo na kopesa bango etumbu.
Likambo ya solo: Na siɛklɛ ya liboso, Nzambe atikaki ete Yerusaleme ebebisama na mabɔkɔ ya Baroma. (Matai 23:37–24:2) Nzokande banda wana, Nzambe apambolaka ekólo boye to boye te; mpe apesaka ekólo boye to boye etumbu te. Na miso ya Nzambe, “Bayuda ná bato ya bikolo mosusu bakeseni té.”—Baroma 10:12, Bible na lingala ya lelo oyo.
Makanisi ya bato: Soki ezalaka na Nzambe moko ya bolingo mpe ya nguya nyonso, alingaki kotika te ete ebele ya Bayuda wana bábomama.
Likambo ya solo: Nzambe atindaka bampasi te; kasi na bantango mosusu atikaka yango esalema mpo na mwa ntango.—Yakobo 1:13; 5:11.
Mpo na nini Nzambe atikaki Banazi báboma ebele ya Bayuda?
Ntina oyo Nzambe atikaki ete likambo wana esalema ezali mpe ntina oyo atiki bampasi ezala tii lelo oyo: mpo na kosilisa bantembe minene oyo ebimaki kala mpenza. Biblia emonisi polele ete Zabolo nde azali koyangela mokili oyo, kasi Nzambe te. (Luka 4:1, 2, 6; Yoane 12:31) Ezali na lisolo mosusu oyo elimboli malamumalamu ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala; kasi, makanisi mibale oyo euti na Biblia ekoki kosalisa yo omona ntina oyo Nzambe atikaki ebele ya Bayuda bábomama.
Kosalela mabe bonsomi ya kopona nde ememaki likambo wana. Nzambe ayebisaki bato ya liboso, Adama ná Eva, makambo oyo basengeli kosala, kasi apusaki bango na makasi te mpo bátosa. Bamonaki malamu ete bango moko bakobanda kokata soki nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Ekateli wana ya mabe oyo bazwaki mpe bikateli mosusu ya ndenge wana oyo bato bakómaki kozwa banda wana ememi mpasi mingi na mokili. (Ebandeli 2:17; 3:6; Baroma 5:12) Buku moko (Statement of Principles of Conservative Judaism) emonisi yango na maloba oyo: “Bampasi mingi oyo ezali konyokola bato ezali mpo tozali kosalela mabe bonsomi ya kopona oyo Nzambe apesá biso.” Nzambe abɔtɔli moto bonsomi ya kopona te; atikeli ye nde ntango mpo ameka kotambwisa makambo ye moko.
Nzambe azali na nguya ya kosilisa mpasi oyo kobomama ya Bayuda epesá bato, mpe akosala yango. Nzambe alaki ete akozongisa na bomoi bamilio ya bato oyo bakufá, ata mpe ebele ya Bayuda oyo babomamaki. Akolongola mpe nsɔmɔ oyo etikalá na makanisi ya bato oyo babikaki ntango Banazi babomaki ebele ya Bayuda. (Yisaya 65:17; Misala 24:15) Bolingo oyo Nzambe alingaka bato endimisi biso ete akosala makambo oyo alaki.—Yoane 3:16.
Bato mingi oyo babikaki na ntango oyo Banazi babomaki ebele ya Bayuda balongaki kobatela kondima na bango mpe komona ete bomoi ezali na ntina ntango bayekolaki ntina oyo Nzambe atiki mabe ezala mpe oyo akosala mpo na kobongisa makambo.