Lakisá makambo oyo ezali na kati

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Likoki ya kobaluka nokinoki ya nzinzi oyo elyaka mbuma

Likoki ya kobaluka nokinoki ya nzinzi oyo elyaka mbuma

 Moto nyonso oyo ameká kobɛta nzinzi ayebi ndenge ezalaka mpasi. Mwa nyama yango ekimaka na vitɛsi lokola nkake soki emoni ete balingi kokanga yango.

 Bato ya siansi bamoni ete lolenge ya nzinzi oyo babengi drosophile, ezali na likoki ya kobaluka ndenge oyo aviɔ ya bitumba ebalukaka, kasi nzinzi yango esalaka muvema yango kaka na mwa segɔnde. Profɛsɛrɛ Michael Dickinson alobi ete ntango kaka ebotami, “ekoki kopumbwa lokola nde esí yebá kopumbwa banda kala. Ezali lokola otye bebe oyo abotami sika na aviɔ ya bitumba mpe ayebi oyo akosala mpo na kotambwisa aviɔ yango.

 Bato oyo basalaka bolukiluki bazwaki nzinzi yango bilili ntango ezali kopumbwa mpe bamonaki ete ekoki kobɛta mapapu na yango mbala 200 na segɔnde moko. Kasi kobɛta mapapu yango kaka mbala moko ekoki mpo nzinzi yango eluka ndenge ya kokima likama.

 Esɛngaka ngonga boni mpo ekima likama? Bato ya mayele bamonaki ete nzinzi yango ekoki kokima likama na vitɛsi mbala koleka 50 na oyo moto abɛtaka liso. Dickinson, alobi boye: “Nzinzi yango esalaka kalkile ya kokamwa mpenza na ngonga mokuse mpo na koyeba esika likama ezali mpe kozwa nzela malamu ya kokima.”

 Ndenge bɔɔngɔ moke ya mwa nyama yango ezali na likoki ya kosala bongo, ezali libombami monene oyo bato ya mayele bazali kolinga báyeba.

Nzinzi yango ezwaka nzela mosusu kaka na mwa segɔnde mpo na kokima likama

 Okanisi nini? Likoki ya kosala bamuvema oyo nzinzi babengi drosophile ezalaka na yango ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?